RDC : moweleli ebonga ya moyangeli na kwilu Steve Mabiku aza lisusu mosali na CENI te

Moweleli ebonga ya moyangeli na kwilu Steve Mabiku aza lisusu mosali na CENI te, zambi akotisaki mokanda moa ye ya botiki mosala pe mokambi moa ndako ya maponomi Denis Kadima ayambamaki yango. 

Sarah Meta Savu

24 Lisungi pona macini 2024 - 13:20
 0
RDC : moweleli ebonga ya moyangeli na kwilu Steve Mabiku aza lisusu mosali na CENI te

Kasi nungunungu ya makambo ya lokuta ko wuta na bato ya mitema mabe ezali ko loba ete moweleli ebonga azali mosali na ndako ya mosala ya kalaka mokambi ya CENI pe alingi kozwa ebonga ya bokonzi na kwilu na makasi. 

Na masolo na baye ya ndako ya biso ya ba panzi sango Steve Mabiku alobi ete bato bazali nde ko banga ye. 

" Bazali ko banga nini?  Pona nini kozala moweleli ebonga esengeli epesa ko banga na ngambo mosusu ? Na sosoli ezali po ete bayebi motuya na biso pona kwilu. Ekomi tango kwilu ekota na ntombwa. Toko kende kino suka.

Atako kowela ebonga yango esepelisi basusu te na ngambo esusu bakambi masanga pilitiki ya union sacré kuna esika ba ndimi Steve Mabiku. O'kati ya liyebisi lioko basengi moweleli ebonga na bango andimama na tata mokonzi. 

Maponomi ya bayangeli pe balandi na bango ebongisami pona mua 28/04, kasi na etuka ya kwila ekoki kozonga mua sima pona maponomi ya balobeli na masimanimba.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa