Bukavu : pene ya 13 bazui liwa na moto na quartier 

Moto munene epeli na butu ya dimanche pona ko koma lundi 27 octobre na ngonga ya 1h30, na balabala Funu/B , quartier Mosala, commune ya Kadutu na Bukavu, na etuka ya Sud-kivu. 

Sarah Meta Savu

27 Sanza ya zomi 2025 - 19:44
27 Sanza ya zomi 2025 - 19:48
 0
Bukavu : pene ya 13 bazui liwa na moto na quartier 

Chef ya quartier, Patrick Lubala, asali bilan provisoire ya liwa 13, pe batu ya ba pota ebele, biloko ebebi pe ebele. Ba ndaku ebele eziki etiki mabota ebele na pasi. 

Kolandisama ba sango kuna esika, basali ya Croix-Rouge bakuti ba weyi 14 na kati ya misala yako luka. Likama oyo epesi etiki ko lela makasi. 

Batu kuna esika bakanisi ete ba nzoto mususu ekoki ko komonana pe ko matisa motango ya baseyi. 

Makama ya boye ekomi mingi na Bukavu mbula oyo pe mingi mingi eyebani te ebandi na nini.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa