Poso ya climat: RDC RDC emi lengeli pona esika ya malamu Kino COP30
Na bokomi pene mikolo ya COP30 na Belém (Brésil), ekolo Congo demokratiki abimisi pe mongongo naye na maye matali climat. Engumba kisasa ekoyamba uto lundi 27 oct., likindo ya liboso litali climat awa na RDC, na mama likambo : "Zamba eza biso "
Na briefing mokolo ya le 23/10 , ministre atali mambi ya nzinganzinga Marie Nyange, abeti sete koloba ete likindo yango ezali pona koluka Bomoko yambo ya COP30.
Batu ya mayele, balukiluki, batu ya mikano pe société civile bako sangana pona kozongisa limonisi ya Congo demokratiki na oyo etali propriété climatique, gestion durable des forêts, transition énergétique, financement climatique biodiversité pe inclusion communautaire.
" Poso ya climat ezo salema pona mbala ya liboso na RDC. Esengeli batu nionso bazala na tina ete ekolo na biso eloba liloba moko na COP30.
Ekolo ya bozui nako simbaka Zamba ya mibale na ba Zamba ya minene na molongo mobimba RDC eza posa yako lamusa makanisi ya bayi mboka na oyo etali motuya ta likambo liango na kati ya climat.
Maye mako lobama na likindo lyango mako pesa nzela yako lelengela maye RDC esengeli koloba na COP30 lokola " pays solution" na oyo etali nzinganzinga.
