Mpox: RDC akokisi motango 600 ya liwa
Ekolo Congo demokratiki ekokisi sikawa motango 610 ya bato ba weyi na bokono ya mokeypox oyo epanzani na bituka ebele ya ekolo, bongo nde etalisi Roger Kamba minisele atali mambi ma bokolongono boa nzoto.
Roger Kamba atalisi pe lisusu ete uto sanza ya janvier bato 17.801 batalisamaki na bilembo ya bokono boango na bituka pe motango ya bato kowa ya 3,5%.
Bituka bisimbami makasi na westi ezali Équateur, Sud Ubangi pe Maï ndombe nzoka nde na moniele ezali bituka ya sud pe Nord Kivu. Biteni efandi batomboki pe esimbami kasi lisungi lia minganga likoki ko koma kuna esika te pona bozangi bokengi.
