RDC: OMS abuaki mbela n'a oyo etali bokono ta monkey

Na likita lia lombango mercredi 14/08/2024, OMS abuaki mbela pona oyo etali bokono ya mokeypox to variole ya makaku na RDC.

Sarah Meta Savu

16 Sanza ya muambe 2024 - 10:51
16 Sanza ya muambe 2024 - 10:52
 0
RDC: OMS abuaki mbela n'a oyo etali bokono ta monkey

" Ko kola ya bokono Mpox na RDC pe bikolo bisusu ya Afrika ezali likambo ya kotala na lombango kolandisama mobeko ya bokongono ya nzoto onte ya molongo (RSI 2005). Boyeyi ya Mpox ya pe ko panzana na yango na lombango na moniele ya RDC pe bikolo misusu ya pene ezali ko pesa kimia te. Kolandisama motango ya bato ba simbami na bokono boango na RDC pe bikolo ya pene eyano ya masanga ya bokongono boa nzoto ya molongo ezali motuya pona ko luka kosilisa bokono " wana maloba ya dileketele mokambi ya OMS Tedros Ghebreyesus.

Kopanzana ya bokono na moniele ya ekolo Congo demokratiki na lolenge n'a yango ya sika pe ya makasi koleka ya mbala eleki na 09/2023 nde epusi kozua mokano moye ya OMS.

Mokolo ya mibale eleki eteni ya Union Africaine na mambi ma bokongono boa nzoto ba tatolaki " bosenga na lombango pona bokolongono boa nzoto" kotalaka lolenge Mpox ezali kopanzana.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa