Masano ya Francophonie : Louise Mushikiwabo ya Rwanda azelami na kisasa (mbulamatari)

Na bokeseni ya maye mazali ko lobama, kalaka mokambi ya lisanga lia Francophonie Louise Mushikiwabo ya Rwanda azelami na kisasa pona masano ma francophonie.

Sarah Meta Savu

25 Sanza Sambo 2023 - 00:28
 0
Masano ya Francophonie : Louise Mushikiwabo ya Rwanda azelami na kisasa (mbulamatari)

Minisele ya mambi matali Modelo o'mboka, minisele ya mambi ma bo panzi sango,PE mokambi ya masano ya Francophonie bazalaki o'liboso ya ba palanginisi sango mokolo moa lundi tuku mibale na mineyi sanza sambo mobu koto ibale tuku ibale na isato nde ba laki koya ya Louise Mushikiwabo.

Na motuna ya ko yeba soki mokanda ya kobengisa Rwanda emo kendaki, Peter Kazadi azongisi na makanisi ma batu mosala ya kalaka mokambi ya Francophonie oyo na lisanga lia bato Pona mabongisi mango azali na posa yako zela mokanda te.

Na liyebisi liye lia mbulamatari, ba sango ezali koloba ete kisasa eboyeli ko bongisa Louise Mushikiwabo ezui pole.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa