RDC : mobu ya kelasi eko katana na nzela te kasi eko lengelama kolandisama eleko ya bitumba kuna o'moniele [Raissa Malu]

Mobu moa kelasi 2024-2025 eko katana na nzela te na biteni ekutani na bitumba na ekolo Congo Demokratiki. Nde maloba ya ministre atali mambi ya mayekoli pe bomoto ya sika, Raissa Malu Dinanga liboso ya ba panzi sango lokola esalaka ministre ya bopalanganisi sango mposo nionso. 

Sarah Meta Savu

5 Lisungi pona macini 2025 - 21:23
5 Lisungi pona macini 2025 - 21:24
 0
RDC : mobu ya kelasi eko katana na nzela te kasi eko lengelama kolandisama eleko ya bitumba kuna o'moniele [Raissa Malu]

Mbulamatari alaki « mobu elengelama kolandisama eleko » linaka oyo pesa nzela na bana kuna esika batomboki ya M23 basilisa mayekoli. 

« Te mobu eko katana te, nzambi toko bongisa maye masengeli na tina mayekoli ekoba kopesama. Ya solo  bazalaki na biteyelo te kasi tozali kotala biteni nini ya motuya oyo eko sunga bango baleka na mimekano », Nde maloba ya ministre atali mambi ya mayekoli pe bomoto ya sika. 

Mbulamatari kotalis pasi ya makasi oyo botomboki ya Rwanda ekotisi na mabele RDC. 
Biteyelo koleka 2500 na Nord pe Sud Kivu esimbami pe bana 1.4 million basimbami na pasi kuna. 

Lelo na Nord kivu, biteyelo 1483 ekangi, 35 ekweyi nionso, 45 ezangi biloko nionso. Kolandisama na sango ya ministele ya mayekoli pe bomoto ya biteyelo misaso ba tomboki bazali kosalela yango lokola bisika na bango yako fanda, pe misusu ekomi malita.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa