Félix Tshisekedi na Mbujimayi : « Kagame azo kima nga, azo banga ngai(...) akoki kotala nga na miso te »

Lolenge moko tango azalaki na Kananga, tata mokonzi Félix Tshisekedi aloba liboso ya bayi mboka na engumba Mbujimayi mua 26/12/2024. 

Sarah Meta Savu

27 Sanza zomi na mibale 2024 - 21:50
27 Sanza zomi na mibale 2024 - 21:51
 0
Félix Tshisekedi na Mbujimayi : « Kagame azo kima nga, azo banga ngai(...) akoki kotala nga na miso te »

Na oyo etali bobomi ezali kosalema na moniele ya ekolo kuwuta na bayi Rwanda, Félix Tshisekedi alakisi lisusu Paul kagame musapi, pe abeti sete akoki kotala ye na miso. 

" Tango nakeyi na Luanda, nayebaki ete akoya te (Kagame). Azali kokima ngai pamba te azali ko banga ngai, akoki ata kotala nga na miso te. Tango nazali liboso naye pe nazali kotala ye azali kotia elongi mopanzi". Elobaki ye

Tata mokonzi Félix Tshisekedi atuti pe tolo pona ba nzela etongami na Kasaï enene. Atalisi posa naye yako kutanisa bingumba mibale Mbujimayi pe Kananga na nzela eko tongama kuna na mobu 2026. 

" Na wuti na Kananga pe naza na ba sango malamu nazalaki na nzela ya kalambambuji pe misala ezali kotambola malamu. Kino juin 2025, nzela eko zala malamu, Kasi esengeli tosala keba po soki tozali na biloko yako kende koteka na Angola te, Angola ako sepela na yango koleka biso."

Tata mokonzi azali ko koba na mobembo naye ya molayi na Kasaï, sima ya Mbujimayi ako zala na tshikapa samedi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa