RDC : ndako ya bosambisi ya mapinga epesi Joseph Kabila nkatela ya kufa ( condamnation à mort) 

Ndaku ya bosambisi ya mapinga abimisi nkatela ya mokano  pona Joseph Kabila, nkatela ya kufa pe mokanda pona ko kanga ye mbala moko. Mokano moango ebimi mua 30/09/2025. 

Sarah Meta Savu

30 Sanza ya libwa 2025 - 20:44
30 Sanza ya libwa 2025 - 20:45
 0
RDC : ndako ya bosambisi ya mapinga epesi Joseph Kabila nkatela ya kufa ( condamnation à mort) 

Bosembo ya mapinga na Congo endimi Joseph Kabila na mbeba ya crime de guerre, viol, trahison, complot, propagande ya makambu mabe. 

Kolandisama mokano ya ndaku ya bosambisi, Joseph Kabila atalisa kozala mokambi ya lingomba ya batomboki AFC/M23, azali bongo moko ya batu mabe na mosala ya ezali ko mema bitumba sima ya bosambisi sanza misato. 

Ndako ya bosambisi endimisami été atako azalaki mokonzi ya mboka azalaki pe mokambi ya mangomba ya batomboki uto eleko ya Mutebusi pe akembisaki misala ya botomboki na boyokani na ekolo Rwanda. 

Kasi, mokano yako kanga bozui naye epesami te nzambi maye yako pesa nzela na mokano moango ezali te.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa