Bilanga : ministre Mutshail abongisi kokela milona na ekolo pona ko kolisa misala ya bilanga

Mobiangami na minisele ya bopanzi sango pona lapolo ya mposo nionso liboso ya ba panzi sango ya mua 17/12, ministre atali mambi ya bilanga pe bokengi na maye matali bileyi, akumisi makasi ya minisele naye yako luka kosilisa bozangi ya bileyi nako pesaka motuya na biloko elonami na ekolo. 

Sarah Meta Savu

18 Sanza zomi na mibale 2024 - 11:13
18 Sanza zomi na mibale 2024 - 11:14
 0
Bilanga : ministre Mutshail abongisi kokela milona na ekolo pona ko kolisa misala ya bilanga

" Na banzi ete bayi mboka bazali na bosenga yako malakisi na oyo etali bilanga. Bilanga ekoki kosalema kaka boye te. Tosengeli tobanda na kobisa oyo ya biso milona (...) ekolo na biso ekomi lokola fulu na milona ya bipayi na bipayi" elobiki ye.

Mbulamatari ya ekolo Congo demokratiki ezali pe ko kanisa komema mbongwana na oyo etali bosembo na maye ya bilanga. Gregory Mutshail atalisi pe milulu ezali kosala minisele naye liboso ya balobeli pe ba mpaka ya ekolo pona kolimbolela bango motuya ya bilanga. Uto milulu yako lamusa makanisi ya bayi mboka na oyo etali bilanga ebandi, mbulamatari apesi milona, biloko misusu ya mosala na baloni na bituka ya Haut Katanga pe Haut Uele.  Pe eko kende kino bituka binso.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa