RDC : IA ebakisami pona ko corriger mimekano mia EXETAT 2025
Ebanzi lelo lundi 28/07/2025 na ekolo Congo demokratiki mimekano mia EXETAT ya mbala 58 m, mimekano ezali ko talisa suka ya kelasi ya se. Bana motango 1.079.341 ya cycle long bazali koleka na mimekano miango na bituka binso ya RDC (43% bazali bana basi), bana 6.022 pona cycle court (17% ya bana basi).

Pona mbala liboso makambu ya sika na mambi matali mbonguana makasi ya technologies ekoti na mimekano miango, lokola intelligence artificielle pona kosanga na correction.
Kolandisama moko sango ya minisele etali mateya ya se pe bomoto ya sika elobi : " tokotisi intelligence artificielle na correction ya mimekano po été ezala malamu lisusu koleka elongo na linaka S-NOTE ,linaka Liye lizali kopesa nzela pona correction automatique nionso na se ya liso ya batu ya mayele ya inspection générale. Yango eko pesa nzela yako sala mosala na lombango pe na bokebi pona ko pesa ba résultats ya malamu pe ya bosolo"
Mbonguana ya numérique pona bosolo
Likolo ya intelligence artificielle makambu masusu ya sika eko zala na EXETAT ya mibu 2025:
- numérisation ya bokomisi kombo na mimekano ;
- decentralisation ya scannage pona misala ya correction ;
- bokengi pona maplome na nzela ya Blockchain pe QR code, na tina yoko yeba kolandela yango.
" Na boye mbonguana ya numérique na mimekano mia EXETAT eza koleka modernisation. Eza nkatela pona ko batela alima, pe bosolo pona elenge nionso na ekolo".
Mbulamatari atalisi likanisi naye yako kende lisusu musika " mobu moa kelasi mozali koya (2025-2026) toko tala oyo etali lolenge ya mateya pe ya mimekano" kotalisama ya EXETAT ekoki ko bonguana pona ko komisa yango na epimelo esengami na mateya.
Manso oyo ememi ekolo Congo demokratiki na epimelo ya likolo liboso kati ya bikolo oyo ezali na mbonguana ya numérique na kati ya mateya.