Kisasa : molakisi monene Bonnette Elombe eweyi 

Elongi yako yebana makasi na mayekoli na ekolo Congo demokratiki, Bonnette Elombe Kianfuni, oyo ayebani na Kombo ya Madame Elombe, akufi lelo lundi na lopitalo ya cinquantenaire. 

Sarah Meta Savu

20 Sanza ya zomi 2025 - 19:16
20 Sanza ya zomi 2025 - 19:16
 0
Kisasa : molakisi monene Bonnette Elombe eweyi 

Sango yango enzimisami kotala batu ebele ko tatola yango na kati na bango molobeli ya bayi mboka Christelle Vuanga.

Madame Elombe azalaki molakisi lokola misusu te. Azalaki lokola ko ngenga ya moyi pona bana.
 Tongo nionso, abandaki koyamba bana na esengo makasi na ba nzembo, pe mabina. Suku naye ya layekoli ezalaki esika ya esengo.

Na bililingi naye epanzanaki mokili mobimba na nzela ya Tik tok pe ba réseau sociaux misusu, ezalaki kotalisa lolenge naye yako tangi oyo ezalaki kosimba mitema kino libanda ya eteyelo. 

Muana ya molakisi, Bonnette andimaki musala oyo na bolingo. Pona ye kotangisa ezalaki kaka musala te ezalaki eloko alingaki. 

Lolenge naye ya sika na mayekoli ekendaki sango kino libanda ya Yolo Sud. Ba konzi ebele ba pusanaki pene naye komona lolenge naye yako tangisa na bolingo, ata na kokoso ya bozangi ba matériels. 

Liwa ya madame Elombe etiki bitike bana oyo bazalaki ko yekola elongo pe libota mobimba ya ba lakisi oyo ezalaki ko mona kati naye ndakisa ya malamu.

Sango ya liwa naye epanzani lokola likambu ya pasi. Kati yako lela pe kimia ba élèves pe Congo mobimba ezali na pasi yako azalaki koleka molakisi, moboti, motu yako yoka baninga pe ndakisa ya malamu.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa