Bopanzi Sango : Stanis Bujakera akanagami pona makambu etali mosala na ye te ( ASADHO, ODEP, Justicia ASBL)

Bokangami ya Stanis Bujakera eza pona mosala moe ye te, bayi société civile bazali komona makambo mosusu mokangami na yango. Maloba mango ewuti na masanga ASADHO ( etalaka makoki ma bato) ODEP mpe Justicia ASBL. 

Sarah Meta Savu

3 Sanza ya zomi 2023 - 10:39
 0
Bopanzi Sango : Stanis Bujakera akanagami pona makambu etali mosala na ye te ( ASADHO, ODEP, Justicia ASBL)

Liboso ya ba panzi sango mua mibale ya sanza zomi masanga mango misato bazui monoko ya makanisi ma bango nako talaka bozangi botosi ya mibeko ya matali bopanzi Sango na Congo demokratiki na mokapo kama yoko na mineyi. 

" Bakonzi batosi te mokapo kama yoko na ya mobeko motali nsomi ya bapanzi sango moye bongisi nzela yako yanolo to ko bongisa. Pona nini bakonzi bazui nzela ya mineko na esika yako salela mobeko moye?", Nde motuna ya bayi société civile. 


ASADHO, ODEP mpe Justicia ASBL batalisi pe bozangi botosi ya mokapo tuku libwa na mitano epekisi ko pesa kombo ya moto afongoleli ye makambo na sima ya luwa ya misele Chérubin Okende. 

Pona bango esengeli na JeuneAfrique nde akende koyanola liboso ya mibeko pamba te sango ezalaki na mokoloto ya Stanis Bujakera te. 

"Pona nini ko kanga Stanis Bujakera pona eloko asali te?"

ODEP, ASADHO pe Justicia ASBL ba sengi kobima na boloko ya Stanis Bujakera, pe ba sengi na tata mokonzi alandela botosi ya mibeko na ekolo. 

Stanis Bujakera atiamaki maboko mua muambe ya sanza libwa na libanda ya pepo ya n'djili. Afundami pona ko koma makambu ya lokuta, moyibi ya elembo ya mbulamatari pe ko panza sango ya lokuta.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa