Masano ya Francophonie: RDC alongi lisusu bitumba bibale na lutte libre pe azui bisika ya mineyi

Na pokua ya moa tuku misato,sanza sambo, ekolo congo demokratiki alongi bitumba bibale na nzela ya Andy Mukendi Kabeya PE Barthélémy Tshotsha.

Sarah Meta Savu

31 Sanza Sambo 2023 - 15:05
 0
Masano ya Francophonie: RDC alongi lisusu bitumba bibale na lutte libre pe azui bisika ya mineyi

Andy Mukendi azui mpalata ya wolo liboso ya Simonyan, ya ekolo amerika pe Barthélémy Tshotsha azui ya ye nako longaka moto ya Tchad Saley na lobala ya tata Raphaël.

Na nzanga, Rabby kilanda PE Jordan Kabongo bazuaki ya bango mpalata ya palata,epayi ya basi Prisca Mandundu azuyi mpalata ya palata pe Chancelvie Gomba alongi mpalata ya palata ya motane.

Na ba mpalata miyeneyi iye eloko Congo demokratiki azali na yango motoba na kati ya masano pe azali na esika ya mineyi na sima ya Roumanie oyo azali na mpalata sambo.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa