RDC : Monkeypox bilembo yako bangisa ekomi motango 42.000

Na lioko likindo elongo na ministre atali mambi ya bopanzi sango,ministre atali mambi ya bokolongono boa nzoto Dr Samuel Roger Kamba atalisaki epimelo ezui bokono ya Monkeypox. 

Sarah Meta Savu

15 Sanza ya zomi na moko 2024 - 08:39
15 Sanza ya zomi na moko 2024 - 08:39
 0
RDC : Monkeypox bilembo yako bangisa ekomi motango 42.000

42.000 batalisami na bilembo ya bokono pe 1.130 bato bakufi uto bokono bobandi. 

Libaku lizalaki pona Dr Samuel Roger Kamba yako talisa mosala makasi mazali kosala mbulamatari pona ntina ya likambo liango. "Mposo nionso tozali na likita na ntina ete moto monso ayeba esika bokono ekomi, boye mikani mizali kozuama ezali kaka pona RDC te kasi pe pona pembeni pembeni ya ekolo na biso. Nako tala malamu tomoni ete bokono ezali ko kola. "

" Toko luka bokono bonso ezali kotalisa bilembo ko kokana na Monkeypox pona kosala boluki na ntina yako tia pembeni oyo Monkeypox te.

Pona bokono, ministre Samuel Roger Kamba atie mibiko mitano. Kolandela, ndako ya boluki, lisungi pona baye bazali nayango, kobatela liboso ya bokono, pe bopanzi sango. 

" Lisungi pona kotelemela bokono yango ezali kosalema na ndako na biso ya boluki ya bokolongono boa nzoto pe baye basalaka na biso" elobi ministre Samuel Roger Kamba.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa