Bokengi : RDC azui ya mbala liboso masuwa pona ko bunda na bibale
Ekolo Congo Demokratiki ezui uto lelo masuwa monene pona ko kengela bibale. Eyambamaki na maboko ya bakambi mokolo ya lundi 10/03/2025 na libongo ya Boma na etuka ya Kongo central.
Na konzi ebele bazalaki kuna esika, ndakisa mokamabi mbulamatari molandi atali mambi ya mapinga Guy Kabombo Muadiamvita, mokambi molandi ya état ya FARDC, lieutenant-général Ychaligonza Nduru, mokambi ya état major ya mapinga ya mayi ekotelaki Amiral Kuyandi Lukombo pe moyangeli molandi ya etuka Kongo central, Prosper Ntela.
Na nkombo « alternance pacifique ya 24/01/2019 » masuwa eye eko kembisa misala ya mapinga ya ekolo Congo Demokratiki pona ko batela mindelo ya mboka.
Masuwa eye ya bitumba ekomi na tango ya malamu pamba te Congo Demokratiki ezali na bitumba na ekolo Rwanda pe batomboki naye ya M23 pe fandi na biteni ebele na mabele ya RDC.
