RDC: Rawbank afongoli milulu ya « all star game University 3×3 » pona ko fula masano ya basketball na biteyelo ya bakolo
Liboso ya bapanzi sango mokolo ya vendredi 23/08/2024, Rawbank na boyokani naye Visa pe weact ba fongoli pona mbala ya liboso milulu « all star game University » ezali pona masono ya basketball na biteyelo ya bakolo na engumba kisasa.
Na nzela ya masano mango posa ezali yako bimisa bilenge ya makasi na masano ya basketball na engumba kisasa yambo Yako kende na biteyelo ya bakolo ya ekolo Congo demokratiki mobimba.
Masanga 8 eko ndongwana. Rawbank abongisi misolo pe nkeni pona balongi, bilembo ya wolo,palata ya pembe pe ya motane pona masanga balongi ya liboso ya mibale pe ya misato.
« Limonisi ya Rawbank ezali yako mema na bituka binso linaka liye kino 2030. Bisika binso biteyelo ya bakolo ezali esengeli batangi batalisa elongi ya eteyelo n'a bango na masano », elobi Baraka Mpoze motalisi elongi ya Rawbank.
Libanda ya misolo pe nkeni pona balongi Rawbank abongisi biloko bisusu pona mimekano ya moto na moto.
« Eko zala mimekano ya dunk, ya ko kotisa mingete misato uto kati kati ya libanda ya masano », Baraka Mpoze abakisaki
Molulu moango mozali ko banda mua ,19/09 kino 21/09 na libanda ya masano ya 7em rue limete.
