Mikolo kama ya S. Bujakera: MILRDC pe masanga 21 batelemeli ministère public

Mipanzi sango Stanislas Bujakera akokisi mikolo kama na boloko uto lundi 18/12. Masanga ya bayi société civile MILRDC, JED, ACAJ pe masanga masusu zomi na libwa balakisi ministère public misapi bazali ko funda ko pakola mafuta maye ma memi Stanislas Bujakera liboso ya mibeko. 

Sarah Meta Savu

20 Sanza zomi na mibale 2023 - 09:04
 0
Mikolo kama ya S. Bujakera: MILRDC pe masanga 21 batelemeli ministère public

Na lioko liyebisi ekomeli biso zuzi mosambisi alobi ete mopanzi sango akelaki to atambwisaki lapolo ya lokuta na mkombo ya ANR na oyo etali liwa ya Chérubin Okende. 

" To telemeli na makasi na biso ya suka maye bazali ko fundela Stanislas Bujakera Tshiamala, lokola koloba akomaki to atambwisaki lapolo ya lokuta ya ANR oyo ba kopani ya numérique Meta/WhatsApp pe télégram ba bomaki mbala moko" 

Masanga manso bazongisi na makanisi ya bakonzi ya mboka pe ya libanda bozangi botosi ya mibeko  pe bonsomi ya mopanzi sango nako sengaka ye abimisa nkombo ya moto ayebisaki makambo na ya mokanda mozali na mokoloto naye te. 

Stanislas Bujakera akangamaki uto mua 8/09 na libanda ya mpepo ya nd'jili tango azalaki kobongama pona mobembo. Afundami pona makomi ma lokuta ndanga ya lokuta ya mbulamatari pe bopanzi sango ya lokuta pe botambwisi sango ya lokuta kotelemelaka mibeko.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa