Tshisekedi na Kagame: « Na tandeli yo loboko na tina ete tosala kimia lokola batu ya makasi »
Uta na engumba Bruxelles, na elobeli ya Gateway Forum, tata mokonzi ya RDC Félix Tshisekedi akamuisi batu na maloba naye, koloba ete atandi loboko na Kagame tata mokonzi ya ekolo Rwanda: « na esika to batela bokabwani, na kanisi to banda lisolo ya sika, ya boyokani pe ntobwana » bongo nde alobaki mokolo ya jeudi 09/10/2025.
Na mongongo ya kimia kasi bokonzi, Tshisekedi atalisi posa yako kosala kimia na ekolo Rwanda « tozali baye bakoki kosilisa likambo oyo, bayi mboka na bikolo na biso baza na bosenga ya kimia , bitumba te. » Maloba naye, nako betaka Sète na motuya ya likambo.
Maloba naye ekomi na tango oyo boyokani ya RDC pe Rwanda eza ya ko beba makasi, ba accusations ya soutien na ba M23, rupture diplomatique Kinshasa ezali ko koba pesa ba conditions ya ko longwa ya mapinga pona oyo nionso etali boyokani ya libombo.
Maloba oyo ezali pesa elikia ya kimia sima ya ba sanza ebele yako bandana.
