RDC : Tata mokonzi Felix Tshisekedi azuaka lifuti lia 10.800$ na suka ya sanza

Kolandisama liyebisi lia minisele mia budget, tata mokonzi Felix Antoine Tshisekedi lifuti lia ye na suka ya sanza ezali ya 10.800$, esali 324.000.000 FC to 129.600$ na suka ya mbula. 

Sarah Meta Savu

7 Lisungi pona macini 2024 - 14:18
 0
RDC : Tata mokonzi Felix Tshisekedi azuaka lifuti lia 10.800$ na suka ya sanza

Kolandisama na lokasa actualité.cd batangaki, misolo pona misala o'ndako ya misala ya tata mokonzi ebuti pe ebakisami na 19,58% pona mobu 2024, na bokeseni ya mobu 2023. Lifuti lia basali o'ndako ya misala ya tata mokonzi elongwe na 1.813$ na 2023 kino 2.726$ na 2024. 

Ko buta ya misolo miye miwuti na ko mata ya motango ya basali na ndako ena ya mosala. Ya solo motango ya basali na ya mosala ya tata mokonzi elongwe na 21 na bokambemi na Joseph Kabila kino 34 na bokambemi ya Felix Tshisekedi. 

Ko buta ya motango moango esali ete ndako ya mosala ya tata mokonzi ezali ko salela misolo koleka 125 millions ya mosolo mia amerka pona ko futa basali. Kolandisama na mibeko mitali misolo ya 2024, libombo ya mbulamatari ezali ko futa basali 1148 ya misala mia pilitiki na na ndako ya mosala ya tata mokonzi. 

Soki lifuti lia basali o'ndako ya misala mia tata mokonzi ebuti, lifuti lia tata mokonzi ebuti te etikali obe 10.800 lolenge moko uto ebandeli ya bokonzi boa ye.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa