Nord-Kivu: Mafuo, Biholo pe biteni bisusu ekweyi na na maboko ya AFC/M23 sima yako tongwana makasi na ba Wazalendo
Biteni ya Mafuo, Biholo,shoa,bwambaliro, burora pe ngesha, na secteur ya Masisi ( Nord-Kivu), ekweyi na maboko AFC pe M23 sima yako tongwana makasi na ba Wazalendo.
Kolandisama ba sango ya baye basalaka bokengi kondongwana ya batomboki ya AFC ( bakitani ya RDF) na baninga ya FARDC ewumeli mokolo mobimba ya dimanche 7/09.
Kolandisama sango ewuti kuna esika na nzela ya ACTUALITE.CD, ba Wazalendo bazongi sima na kazinga pe mahanga na mondelo ekaboli Masisi pe Walikale.
Kimia eza te kuna esika ba Wazalendo bazali ko bongama pona bozongela bitumba.
Bitumba oyo ezali kosalema ngonga moko masolo ya boyokani kati AFC pe mbulamatari eza kosalema na Doha.
