Franc Congolais ezo kita, kasi loso mutuya na wenze
Talo ya sac ya loso ya 25kg ( elephant) ekiti makasi ko wuta na 76.000Fc, Kino 59.000Fc, to 21% ya kokita na talo ndenge etalisami mokolo dimanche. Talo oyo ekoti na ba supermarché te bisika loso ezali kaka kotekama na 76.000 FC.
"Sac ya loso moko wana ezali ko tekama 76.000 FC awa nzoka na wenze eza na 59.000 FC. Eza ko limbolama te" ndenge elobi Nanette Mboyo moko ya ba sombi na kati supermarché moko na Gombe.
Ko bulungana ya talo yango ezali ko wuta eloko moko ya pasi pona libombo ya Congo demokratiki. Na wenze bazali ko pesa 19.000 FC pona 10$ oyo ezalaki 26.000 FC ba poso eleki.
Ko kita ya biloko na ba wenze eza kolandisama na disponibilité ya biloko pe pression ya ba sombi nzoka nde batu ya supermarché batikali na ba talo na bango ya kala.
Na eleko ya mbilinga mbilinga na oyo etali misolo, mabota ebele esimbami atako mua ko kita ya biloko ezali ndakisa ya loso.
