Lisambisi lia ba kidnapper : Isaac Kaba kaba na baninga na ye bazui etumbu ya liwa, kaka Reda Mwaka akatelami mibu mibale ya boloko

Ndako ya bosambisi ya grande instance ya Gombe ekati makambu na oyo etali bato ya mabe ba bomi pona koyiba biloko ya kati na kisasa,na butu ya moa motoba pona moa sambo ya sanza sambo kuna na ndako ya mosala ya minisele ya mondelo o'mboka bokengi mpe bokoko.

Sarah Meta Savu

7 Sanza Sambo 2023 - 11:32
 0
Lisambisi lia ba kidnapper : Isaac Kaba kaba na baninga na ye bazui etumbu ya liwa, kaka Reda Mwaka akatelami mibu mibale ya boloko

Na kati ya tuku mibale na sambo,tuku ibale na motoba bazui etumbu ya liwa. Ba Kutami na mbeba mineyi ezali bongo, lisanga lia batu mabe, koyiba batu,koboma,mpe moyibi.

Maloba ya ba fundami pona ko bikisa moko ya bango, Éliane Lebeni Yabwila esali eloko te nzambi azui etumbu ya liwa lolenge moko na basusu.

Lisambisi ya ba kidnapper esili sikawa ba kangami nionso ba sengeli ko kende na boloko pona ko futa mabe asali.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa