RDC : bokono ya ebola ezongi na etuka ya Kasaï, batu 16 bakufi 

Ekolo Congo demokratiki esengeli ebundisa bozongi ya bokono ya ebola eteni ya Boulape na etuka ya Kasaï, ministre atali mambi ya bokolongono boa nzoto Dr Samuel Roger Kamba alobi yango lelo. 

Sarah Meta Savu

4 Sanza ya libwa 2025 - 21:54
4 Sanza ya libwa 2025 - 21:55
 0
RDC : bokono ya ebola ezongi na etuka ya Kasaï, batu 16 bakufi 

Na mokolo ya lelo, 28 cas suspect pe 16 bato bakufi, kati na bango basali 4 na oyo etali bokolongono boa nzoto, toloba 57% yako mema na liwa.

Kolandisama maloba ya ministre Roger Kamba misala ya INRB ebimisaki cas ya liboso le 20 août : muasi ya 34 ans na mokumba na lopitalo monene ya Boulapé na bilembo ya makasi te ( fièvre, kosanza, pulupulu na makila). Virus ya souche Zaïre emonisami mbala 5 le 3 septembre. 

Ndaku ya misala na tango ya urgence ( COUSP) ebongisi mbala moko batu basengeli ko kende kuna esika pona ko kembisa misala ya surveillance. 

Malita yako kembisama pe ebongisa pona koboya bopalangani ya bokono.

Dr Kamba asengi na bayi mboka bazala ekenge ba talisa na monganga ba cas suspect nionso pene pene na bango to na nzela ya téléphone na 151, esengeli ko boya ko zala esika moko na baye bazali na bokono, ko simba niama ekufa te.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa