Kisasa: bato 30 bakangami na pulusu pe FARDC à Baramoto 

Misala ya mapinga ya FARDC elongo na pulusu esali ete ba kanga batu 30, butu ya samedi 16/08 pona ko koma dimanche 17/08 na kisasa. 

Sarah Meta Savu

19 Sanza ya muambe 2025 - 00:08
19 Sanza ya muambe 2025 - 00:08
 0
Kisasa: bato 30 bakangami na pulusu pe FARDC à Baramoto 

Misala ya bouclage yango ezali kosalema na boyokani ya mapinga pe pulusu pembeni pembeni ya fleuve Congo, ndakisa na baramoto na nordi ya engumba kisasa. 

Kolandisama liyebisi liwuti na pulusu misala misalemaki makasi pe etikali na boloko kaka baye batangamaki na botomboki to makambu masusu ya mabe basusu bazongaki. 

"Bato yango 30 batindamaki na 14eme région militaire " elobi pulusu

Misala miye mizali pona ko kembisa bokengi pe botelemeli criminalité na engumba mingi mingi na mabongo pamba te bazali kosalela yango mingi.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa