Assemblée nationale : Mbulamatari akotisi linaka ya budget 2026 etali bokengi, mayekoli, pe botongi 

Mokambi mbulamatari Judith Suminwa, akotisi kuna assemblée nationale mokolo ya lundi 15/09/2025, linaka loi de finances budget 2026 kuna na ndako ya balobeli. Na motuya ya 59.000 milliards na Francs congolais pe 20,3 milliard ya misolo mia America budget yango emati na 16% koleka oyo eleki.

Sarah Meta Savu

17 Sanza ya libwa 2025 - 09:11
17 Sanza ya libwa 2025 - 09:12
 0
Assemblée nationale : Mbulamatari akotisi linaka ya budget 2026 etali bokengi, mayekoli, pe botongi 

Ebongisami ko kabolama lolenge esengeli na bokengi, misala ya bilanga, misala ya botongi, mayekoli pe energie makambu ya motuya pona bokeyi liboso ya ekolo. 

Mokambi mbulamatari akotisaki pe na libaku moko mobeko etali redition ya 2024. 
Etalisi na kati na yango misolo oyo ekoti na libenga ya l'état na motuya ya 35.513,9 milliards ya francs congolais ( to 79,9 ya oyo esengeli pona misala ya l'état) pe ya ba dépenses 35.872,5 milliards ya FC ( taux d'exécution 80,78%), epesi déficit ya 358,5 Milliards ya FC. Deficit ewuti na déséquilibre ya budget général, esungami na excèdent ya budget général.

Mbonguana na maye matali finance na nzela ya  Adolphe Muzito, esungi pona kokisa maye masengeli pe ko mema pole na lolenge yako salela misolo ya l'état. 

Linaka eko Kende na pona kotalama malamu ba poso ekoya pona kotiama na misala.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa