20/03, mokolo moa bokembeli francophonie " ya solo pona bayi mboka ebele na ekolo Congo demokratiki likanisi yako longwa lisanga lia francophonie ezali makasi" Patrick Muyaya

Congo demokratiki esepeli te moa 20/03 ya lelo mokolo moa francophonie. Bozangi boyokani o'moniele ya RDC na tina ya Rwanda,pe kimia ya lisanga lia francophonie na likambo liango nde tina ya kisasa aponi ko sepela te. 

Sarah Meta Savu

21 Lisungi pona macini 2024 - 09:39
 0
20/03, mokolo moa bokembeli francophonie " ya solo pona bayi mboka ebele na ekolo Congo demokratiki likanisi yako longwa lisanga lia francophonie ezali makasi" Patrick Muyaya

Ko yanolaka na mituna elona na moninga moa ye ya mosala atali mambi ma boyokani na bikolo bisusu liboso ya ba panzi sango minisele mia ya bopalanginisi sango pe molobeli ya mbulamatari, muana mboka Patrick Muyaya alobi ete mbulamatari ezali na esengo na oyo etali kimia ya bayi francophonie liboso ya pasi oyo Rwanda ezali ko pesa na RDC. 

" Tozali na matanga na moniele ya ekolo na biso, mitema misimbami na pasi ba ndeko na biso bazali ko bika. Tozali na makoki ya ko boya ko sepela. Kimia ya bayi francophonie ezali ko talisa motuya bazali ko pesa moko ya bikolo binene ba lobaka lifalansa. Bayi mboka ebele bazali ko mituna motuna yako yeba bolamu yako zala na kati ya lisanga liango " nde elobaki ye. 

Lokola moto moko Patrick Muyaya pe Christophe Lutundula bazali ko kanisa ko bendana ya ekolo Congo demokratiki o'kati ya lisanga lia francophonie. 

" Ya solo pona bayi mboka ebele likanisi yako longwa lisanga lia francophonie ezali mingi mingi tangu bazali ko mona bazali ete bayi francophonie bazali ko kabola pasi ya ba ndeko na biso te " Patrick Muyaya abeti sete. 

Ko sepela ya mokolo moango moko zala te pona RDC kolandisama mokano ya minisele atali mambi ma boyokani na bikolo bisusu,kasi mua manaka mako salema na boko bitando ike na mama likambo" Francophonie oyo to lingi "

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa