Joseph Kabila pe ba opposants mosusu ba keli Sauvons LA RDC
Lisanga ya sika na kombo " sauvons la RDC" ekelami mokolo ya mercredi 15 octobre 2025 na Nairobi, Kenya, na likanisi ya tata mokonzi ya kala Joseph Kabila.
Pene pene na ye bilongi ebele ya opposition lokola Matata Ponyo, Seth Kikuni, Franck Diongo pe Jean Claude Vuemba bazalaki na likita lisalemaki pona bokeli lisanga liango pe ba poni Joseph Kabila lokola mokmbi ya lisanga.
Na lioko liyebisi basangisaki mingongo pona koloba ete va ndimi makanisi 12 epesaki Joseph Kabila na discours naye ya mua 23 mai 2025 oyo etalisamaki lokola nzela pona kobimisa ekolo Congo demokratiki na kokoso.
Ba mopesi mokumba yako zongisa état de droit pe yako batela kimia na ekolo, kasi batelemeli pe etumbu ya kufa likolo ya Joseph Kabila kowuta na na ndako ya bosambisi ya mapinga.
Bakeli lisanga liye ya sika babengisi baye basalaka na tata mokonzi ya kala baya kosangana na bango pona pesa elikia na boyi mboka na Congo demokratiki na eleko ya kokoso na politiki pe bokengi.
