RDC : opposant Seth Kikuni akangemi 

Opposant Seth Kikuni akangemi mokolo ya samedi kuna na libanda pepo ya N'dili, na kota naye na pepo kowuta na Nairobi. Sango epanzani na nzela ya Claudel Lubaya ko leka na compte X, koloba ete akangemi na batu ya ANR pe DEMIAP. 

Sarah Meta Savu

18 Sanza ya zomi 2025 - 09:26
20 Sanza ya zomi 2025 - 09:27
 0
RDC : opposant Seth Kikuni akangemi 

Kolandisama maloba naye, passeport ya Seth Kikuni ekangami nanu na basali ya DGM yambo te bakende naye esika eyebani te. Ba ndeko basengelaki koyamba ye balobi ete ba bungani sima ya bokangemi naye. 

Seth Kikuni alakaki na polele bozongi naye sima ya mobembo na Kenya esika atalisaki elongi na likindo elongo na Joseph Kabila pe pe opposant mususu. Lokola molobeli ya SAUVONS LA RDC alobaki ete Ako zonga pe Ako kati nzela ya kufa nako bango te. 

Lisanga SAUVONS LA RDC, oyo ezali kosangisa na kati na yango ba opposants ebele, emonisami mabe liboso ya pouvoir en place nzambi bazali ko banga makanisi ya mabe na sima. 

Ba konzi balobi nanu eloko te pona bokangemi yango.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa