RDC - Rwanda : « baye balobi balingi bitumba na Rwanda balobi mabe te, Kasi esengeli kotala oyo eko mema » Patrick Muyaya
Atako masolo ya boyokani pona kimia ya RDC -Rwanda esimbi te, Kinshasa abongami nanu te pona kosala bitumba. Eyano eye ya mbulamatari ya Congo demokratiki ewuti na ministre atali mambi ya bopanzi sango pe molobeli ya mbulamatari, Patrick Muyaya, na bokutani naye ya mposo nionso liboso ya ba panzi sango ya mua 15/12.
" Bayi mboka oyo bazali kolinga bitumba, balobi mabe te, Kasi esengeli kotala oyo eko mema koyebaka ete motango ya bato ebele ba kufi na makambo yango. Esengeli kotala pe posa ya tata mokonzi ya ko Luka kobatela bomoyi ya bayi mboka" elobaki ye.
Kozanga koya ta Paul kagame na Luanda eza mpuasa te, pamba te kotia lokolota na mokanda ya boyokani na RDC eza kotia mokoloto pona kufa ya M23.
Kisasa, atako masolo ya boyokani esimbi abateli mokano yako koba na masolo kino mapinga ya Rwanda malongwa na mabele ya RDC.
