Kisasa : kopani Engen apesi eteyelo Bakanja bifandelo koleka nkama 

Na esengo nde ba kambi pe bana na eteyelo Bakanja na kalamu bayambi mokolo ya lundi 3/03/2025 bifandelo ya sika kowuta na kopani ye petoloni Engen RDC. 

Sarah Meta Savu

3 Lisungi pona macini 2025 - 22:11
3 Lisungi pona macini 2025 - 22:12
 0
Kisasa : kopani Engen apesi eteyelo Bakanja bifandelo koleka nkama 

Likabo liango lizali pona kosunga nako bongisa libiki ya bana kuna esika kotelemelaka bongo bana ko kangama ebele esika moko. 

« Ezali kolandisama misala etali lisungi pona basusu, nzambi kopani Engen ezali moko oyo etalaka be lisungi pona basusu. Pona lelo tokeyi epayi ya bana na nzela ya bifandelo pamba te bazali elikya ya ekolo lobi », Maloba ya Jean Claude Sungula PCA ya kopani Engen RDC. 

Bifandelo ekozala ya suka te miango misusu ezali kobongisama pona ko bongisa libiki lia bana na biteyelo. 

« Boyokani na eteyelo Bakanja ezali kaka ko banda. Na ndako na biso ya mosala tozali na mokanda motali mabongisi pona eteyelo eye, bifandelo kama pe mosusu ekoya na sima »PCA Engen RDC. 

« Tozui mokano yako senga na bana ya kelasi lelo basalela bifandelo malamu pona baye bakoya ko yekola sima na bango », Marie Petelo Sakwaba, mobambi eteyelo Bakanja. 

Kopani Engen azali na linaka yako sunga pona kobongisa  libiki lia batu mingi mingi na oyo etali mayekoli, bokolongono boa nzoto pe ntombwa pona libela.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa