RDC :Patrick muyaya afongoli mposo ya film Chinois
Ndako enene ya mama ngebi eyambaki milulu ya bo fongoli mposo ya film Chinois esalemaki na minisele ya bopanzi sango Patrick muyaya mokolo ya lundi 05/08 na Kinshasa.
Na maloba maye Patrick muyaya azuaki ndakisa ya bililingi oyo ememaki motalisi elongi ya ekolo Chine na RDC pona ko tombola ntoki ya RDC .
Bo ndimisama ete tozali molende pona ko batela ntoki ya ekolo Congo demokratiki pe ko tonga ekolo ya kitoko etondisami na biloko bizali ko benda ba paya " elobaki ye
Pona motalisi elongi ya ekolo Chine na RDC Zhao Bin, mabongisi mango mazali ko kembisa lisusu boyokani ya bikolo biye nzambi ntoki na biso ezali ko kutana mingi na lolenge n'a yango yako zala. Na nzela ya etando ike ya RDC, boye elobami na lokasa lowuti na ndako ya mosala ya minisele ya bopanzi sango. Pe mingi yako kabola pona Kinshasa pe Pékin.
Bakonzi bayike batalisaki elongi na molulu moango, ndakisa minisele ya ntoki, Yolande Elebe, minisele ya tourisme Didier M'pambia, minisele ya mondelo o'mboka Eugénie Tshiela na bakonzi ya etando ike ya RTNC. Mama likambo ya molulu moango mozali :" boninga sino -congolaise biloko ya motuya Yako kabola, lobi yak kabola"
