Patrick Muyaya : « Esengeli ko boyela muana oyo azui mokumba makoki na ye yako landa mayekoli pe ko bakisela ye soni? »

Ministre atali mambi ya bo panzi sango na ekolo Congo demokratiki, Patrick Muyaya, asepeli na mokano moa minisele ya mayekoli yako tika bana bazui mokumba ko koba na mayekoli. 

Sarah Meta Savu

18 Sanza Sambo 2025 - 12:37
18 Sanza Sambo 2025 - 12:38
 0
Patrick Muyaya : « Esengeli ko boyela muana oyo azui mokumba makoki na ye yako landa mayekoli pe ko bakisela ye soni? »

Ezalaki kuna o'milulu mia kalaka ya basi kimia pe bokengi ebongisamaki na bayi ONU femmes pe embrassa ya ekolo Norvège, mokolo mercredi 16/07 na na sulutani hotel. 

Molobeli ya mbulamatari atalisaki makanisi maye na tango mokano ya ministre ya mayekoli yako bomba na kelasi bana bazui mokumba ezali bota makelele ebele. 

Patrick Muyaya alakisi misapi na biteyelo bikambami na katoliko pe ba misioni. 

« Esengeli ko boyela muana oyo azui mokumba makoki na ye yako landa mayekoli? Sima ya mokumba nionso mukolo na yango azali, esengeli kokabola nionso ezo landa mokumba, ezali likambo ya batu nionso » 

Kolandisama misala ya bolukiluki ya (EDS-RDC III,2023-2024) pasi ezali makasi, nzambi muana muasi 1/5 ya 15 ans-19 ans akutani na mokumba. Bobola, ko zanga makoki pona bokolongono boa nzoto na oyo etali makambu yako bota, ko zanga mateya na oyo etali bosangisi nzoto pe na oyo etali bozui basi na makasi. 

« Koboyela muana oyo azui mokumba makoki pona kelasi ezali ko pesa ye etumbu mbala mibale pe kobebisa lobi naye. Kotika ye na kelasi eza kopesa motu makasi te, kasi ezali ko kata singa ya moko oyo ewumeli » ebetaki sete Patrick Muyaya.

Na ba panzi sango , minisele abuaki mbela: to boya bokaboli me to tiya loboko pona nzinganzinga bisika mayekoli na oyo etali bokolongono boa nzoto na oyo etali kobota pe bosangisi nzoto ekoki ko pesama na kimia.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa