Félix Tshisekedi - Léopold : « mokakoswa nazali na ezombo pona bino »

Tata mokonzi ya ekolo congo demokratiki Félix-Antoine Tshisekedi, ayambaki ba beti ndembo ya mikolo elongo na misele ya atali mambi ma masano kuna o'ndako naye ya mosala na OUA, Kinshasa.

Redaction

21 Sanza motoba 2023 - 15:31
 0
Félix Tshisekedi - Léopold : « mokakoswa nazali na ezombo pona bino »

Moto ya masano ya yambo ya ekolo apesi mokakoswa na ba leopard pona elonga na mimekano mia ebandeli ya CAN.

« Nazali na esengo pona bino, bosli mosala malamu » maloba ya Tata mokonzi.

« Tata mokonzi alaki kozala na lobala na sanza libwa pona masano bako ndongwana na ekolo Soudan. Felix Tshisekedi alaki lisusu lisungi kowuta na mbulamatari » kolandisama na ba panzi sango ya ndako naye mosala.

Lomingo ya mua zomi na muambe ba leopard ya mikolo ba longaki balongaki ekolo Gabon mingete mibale na libungutulu (2-0) elonga oyo epesi nzela na Congo demokratiki kolongua na esika ya suka pe kozua bisika ya yambo mimekano mia CAN.

Redaction UNE.CD est un média en ligne basé à Kinshasa, capitale de la République Démocratique du Congo, qui collecte, traite et diffuse des informations générales de la RDC, l'Afrique et le Monde. Grâce à nous, l'actualité vous suit partout en temps réel sur votre téléphone, tablette et ordinateur en un seul clic.