RDC :Vital kamerhe atiki kiti ya bokambi ndaku ya balobeli
Mokolo ya lundi 22 Septembre 2025 Vital Kamerhe apesi mokanda naye pona kotika kiti ya bokonzi kuna na ndako ya balobeli, esalemi yambo ete plénière esengeli ko Kata likambo naye ebanda.

Sango epesamaki na kati ya likita ya bureau ya assemblée nationale na ngonga ya pokwa. Mokonda yango eye na eleko oyo kobendana eza makasi na Union Sacrée.
Pe sima ya bokutani ya Augustin Kabuya, president a.i pe secrétaire général ya USPS elongo na Billy Kambale, secrétaire général ya UNC, lingomba politiki ya Vital Kamerhe. Likita oyo ezali kopesa lolenge yako luka kimia na melembe.
Na nionso wana Dominique Munongo Inamizi rapporteur adjoint ya assemblée nationale apesi pe mokanda pona kotika musala ya rapporteur na ndeko ya ba lobeli. Ba sali misusu bakoki pe kopesa ya bango mikanda pona kotika musala.