Haut Katanga : Joseph Mwinkeu Tshiend akomi na epimelo ya Honoris Causa na oyo etali bokambi

Mokambi moa etuka ya biteyelo Haut Katanga 1, Joseph Mwinkeu Tshiend amati na epimelo ya Honoris Causa.  

Sarah Meta Savu

24 Lisungi pona macini 2024 - 13:24
 0
Haut Katanga : Joseph Mwinkeu Tshiend akomi na epimelo ya Honoris Causa na oyo etali bokambi

Epesameli ye kuna na eteyelo ya bakolo ya mbongwana pona Congo moa 22/03 pona misala mia ye ebele na bokambi pe na botelemeli bizaleli ya mabe pe lisusu na bobateli linaka ya kelasi ofele na biteyelo ya mbulamatari. 

" To tondisami na esengo komona misala ya muana mboka azali ko kokisa pona kotia loboko na ntombwa ya ekolo na biso" elobi Espérance Tshimena mokambi UREC.

Joseph Mwinkeu pe atalisaki esengo mingi pona lokumu epesameli ye alaki ko koba kosala pe ko batela bizaleli ya malamu na mateya ya bana na ekolo na biso. 

Libanda yako zala mokambi ya etuka ya biteyelo Haut Katanga 1 Joseph Mwinkeu azali pe na lokasa ya kelasi na bokambi ba ndako ya misala ya mombongo, aza pe molakisi ya eteyelo ya likolo pe motalisi elongi ya bilenge na bikolo bilibaka lifalansa

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa