Masano ya Francophonie : Lutundula, Muyaya, Kabulo, pe Kwadja bakeyi kotala libanda ya masano na mikolo muambe ya bofonguami na yango

Mokambi mbulamatari molandi ya boyokani na bikolo ya bapaya, minisele ya bo panzi sango, minisele ya masano,pe mokambi ya masano ya Francophonie bakendaki na libanda ya masano esengeli koyamba milulu mina.

Sarah Meta Savu

21 Sanza Sambo 2023 - 13:48
 0
Masano ya Francophonie : Lutundula, Muyaya, Kabulo, pe Kwadja bakeyi kotala libanda ya masano na mikolo muambe ya bofonguami na yango

Ba bandaki na lobala ya 20 mai (tata Raphaël), kuna batambolaki na bisika misato epayi wapi masano ya bitumba eko salema, tennis de table, botamboli PE na lopitalo ya mukie etongami kuna na ba suku tuku mibale.

Sima bazuiki nzela ya eteleyo unikin esika ebosami suku pona bileyi ba beti masano,suku yango ezali na makoki ya ko yamba bato koto misato, pe basani koto libwa ya bileyi mikolo minso,koto misato na tongo,koto misato na nzanga pe Koto misato na pokwa. Mosala kuna ebanda mua tuku mibale na mineyi kasi yambo ebanda ba beti masano kama misato oyo bazali na kisasa bazali kolia na na ba suku ya home 30 ya unikin.

Batalaki lisusu kuna mayi (piscine) pe ba suku ya home XXX, kuna mayi eza malamu, bililingi pona batela ezali, singa interneti etiami.

Bato ya misala baza kuna pona kosala musala longe esengeli. Kisasa ebongami pona ko ya masano ya Francophonie

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa