RDC : 10 millions USD ebimi pona botelemeli bokono ya Mpox
Kotalaka lolenge Mpox ezali ko kola na ekolo, mbulamatari amibongisi pona kotelemela yango.
Na kati ya mabongisi mango, misolo 10 millions ya misolo mia amerika ebimi pona ko sunga baye bazuami na bokono, pe pona misala etali botelemeli bokono.
" Mbulamatari alendisi bayi mboka na oyo etali misala mizali kosalema. To bongisi elongo na minisele ya finance maye manso masengeli oyo ekoki ko sunga pona ko bundisa bokono bona* Doudou Fwamba Likunde, ministre atali mambi ya misolo mokolo ya mardi 20/ 08 2024 sima ya likita na elongo na mokambi ya CDC Africa.
Kotia mosika bato bazuami na bokono pe boluki ya baye bazuami na bokono, kolandela bango, mangwele pona bakolo ezali motuya pona kotelemisa bopanzani ya bokono.
