Religion: liwa ya mgr Edouard Kisonga, évêque auxiliaire émérite ya kisasa
Lisanga monene ya eklezia katoliko na Congo demokratiki ezali na mawa yako kufela moko ya bango o'kombo ya mgr Edouard Kisonga évêque auxiliaire émérite na kisasa, oyo awaki mokolo ya mercredi 20 août na bokono.
Na liyebisi na mokoloto ya seketele chancelier ya archidiocèse, abbé Clet-Clay Mamvemba, eklezia katoliko batalisi mawa na bango pe batalisi ko kabola pasi elongo na libota naye ya makila, elongo na clergé ya kisasa pe lisanga mobimba ya saint sacrément.
Mgr Edouard Kisonga azalaki na 79 ans akendaki na lopitalo monkole ezuami na mont ngafula uto lundi 18/08.
Mabongisi pona ko kunda eko pesama mikolo mikoya
