Fonction publique : 135 000 ba koti mosala na mbulamatari liboso ya 10 000 na mibu 20 eleki (JP Lihau)

Mokambi mbulamatari molandi atali mambi ya basali ya mbulamatari abengamaki kotalisa elongi liboso ya ba panzi sango elongo na misele atali mambi ya bopanzi sango na ntina yako lobela misala mizali ko salema na se ya bokambemi naye, mua 11/10/2023.

Sarah Meta Savu

12 Sanza ya zomi 2023 - 13:34
 1
Fonction publique : 135 000 ba koti mosala na mbulamatari liboso ya 10 000 na mibu 20 eleki (JP Lihau)

Na maloba maye VPM  Jean Pierre Lihau Ebua atalisi ete uto azali ko kamba motango koto kama moko tuku misato na mitano bazui nimelo pona lifuti lia mbulamatari nzoka nde mibu tuku mibale yambo ye azua mosalo moango obe motango koto zomi bazuaki nimelo yango. 

Lisusu Jean Pierre Lihau abakisi ete apesi bopemi na basali ebele bakokisi mibu misengeli na mbulamatari pona kozua bopemi pe lisusu akitisi mpako etali lifuti uto 15% kino na 3%. 

Se libaku mokambi ya misala ya mbulamatari atomboli   mosalo makasi mozali kosalema pona koyesa sika basali nako pesaka bilenge misala na nzela ya ENA. 

kino tokoma na suka ya mobu moye basali ya kala koto zomi bako pema pe bilenge koto mitano bako kota na mosala mobu mokoya. 

Mbulamatari ya Sama, na nzela ya minisele etali basali ya mbulamatari abongisi lifuti pe ekotambola na nzela eye kino sanza ya Mars 2024.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa