RDC : Mbulamatari,   ndako ya misala ya Tata mokonzi, vital kamerhe, Joseph Kabila, Corneille Nangaa pe bayi politiki ebele ba biangami pona masolo ya boyokani na Afrique du Sud 

Fondation Thabo, komboya ya tata mokonzi ya kala n aekolo Afrique du Sud ba bongisi uto le 03 Kino le 06 septembre na Johannesburg, likindo na oyo etali kimia pe bokengi na tina ya bikolo ya Afrika mingi mingi na RDC. 

Sarah Meta Savu

29 Sanza ya muambe 2025 - 08:47
29 Sanza ya muambe 2025 - 08:48
 0
RDC : Mbulamatari,   ndako ya misala ya Tata mokonzi, vital kamerhe, Joseph Kabila, Corneille Nangaa pe bayi politiki ebele ba biangami pona masolo ya boyokani na Afrique du Sud 

Mbulamatari ya RDC, ndako ya misala ya Tata mokonzi, bayi opposition ya politiki pe biklezia, batomboki na mipanga, lokola, Joseph Kabila, Corneille Nangaa, Moïse Katumbi, Martin Fayulu, Seth Kikuni, Antipase Mbusa baza baza babiangami na likindo yango kuna na ekolo Afrique du Sud na mopanzi ya Tata mokonzi Vital kamerhe pe Désiré-Cashmir Eberande Kolongole mopesi toli ya tata mokonzi nde bako talisa elongi na likindo.

Bato ya biklezia baye bundi tango molayi pona masolo pe boyokani na RDC, ba biangami pe kuna Johannesburg lokola, mgr Donatien Nshole ya CENCO pe Eric Nsenga ya ECC bayi société civile pe lokola bako zala kuna esika na ndakisa, Jean Jacques Lumumba ya LUCHA, Bienvenue Matumo. 

Fondation Thabo etiki pembeni te batomboki ya M23, Corneille Nangaa ya AFC pe Thomas Lubanga. 

Kasi kolandisama jeune Afrique, na ngambo ya bokonzi bazali komibatela liboso ya fondation Thabo pamba te ezaleli na bango ezali lokola baza na ngambo ya Joseph Kabila pe bazali koloba mabe ya Félix Tshisekedi.

Tata mokonzi ya kala ya Afrique du Sud andimimi ete mosisa ya bitumba na RDC eza kaka na RDC. Etikali koyeba soki babiangami nionso bako talisama na likindo.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa