Maponomi ya 2023: Moïse katumbi akoki kopesa na CENI ba mpepo

Mokambi lisanga politiki Ensemble pour la république moweli ebonga ya bokonzi na maponomi ya 2033 Moïse katumbi, alobi ete akoki ko pesa na ndako ya maponomi CENI lisungi lia ye pona ko komisa biloko ya misala na boko bituka ya RDC. 

Sarah Meta Savu

8 Sanza zomi na mibale 2023 - 19:46
 0
Maponomi ya 2023: Moïse katumbi akoki kopesa na CENI ba mpepo

Na liyebi lioko o'nzela singa internet tweeter moweleli ebonga aleli nzambi moko ya ba mpepo na ye ekangami na maboko ya bakonzi ya RDC ekolo Afrique du Sud. 

"  Sikawa nde mokanda ya mokambi moa ndako ya maponomi CENI oyo elobi ete ndako ya maponomi ezali ko zanga makoki ya mema ba masini pona misala ya maponami. Pona ko sunga mboka na ngai atako mpepo na ngai mosusu ekangami epayi ya bakonzi na Afrique du Sud na ndimi ko pesa ba mpepo na ngai lokola eteni na nga ya mosala pona mabongisi ya maponomi ya 20 décembre".

O'kati ya Moko mokanda CENI asengaki na tata mokonzi ba mpepo pona ko komisa ba masini na biteni binso ya ekolo, nzoka nde etikali obe mposo mibale pona kosila milulu ya campagne électorale.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa