Kisasa: Minisele ya kala ya mambi matali petoloni Mousa Mondo azali mokangami

Moussa Mondo, minisele ya kala ya mambi matali petoloni akangami lelo pe amemami na boloko bisika asengeli kozala uto limingo loleki 15/04 na ngonga ya mpokwa na engumba mokonzi kisasa, o'ekolo Congo demokratiki. 

Sarah Meta Savu

15 Sanza ya mineyi 2024 - 10:56
 0
Kisasa: Minisele ya kala ya mambi matali petoloni Mousa Mondo azali mokangami

Minisele ya kala na bokambemi ya Ilunga Ilunkamba atiami ma boko pona liwa ya molongani naye oyo akufi pona bibotu. Kolandisama ba sango ewuti na misala ya bosembo. 

"Ye oyo azalaki ya ekolo Madagascar ayambamaki Na lopitalo mokolo moa mposo sima ye kobetam a pe kozwa ba mpota '' kolandisama ba sango ya bato ya pene pene..

Bosambisi ya Moussa Mondo Moko ya lisanga pprd eko banda mikolo mizali koya. Alisa Khadija akufi na lopitalo amemamaki sima yako betama pe kozoka

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa