RDC : lisanga ya CENCO-ECC ba ndimi polele te na maloba na bango ete Rwanda azali ko bundisa RDC [ lisanga ya biklezia ya RDC]
Boyokani pona libiki malamu, linaka lia lisanga CENCO-ECC ezali ko kela mituna ebele. Lisanga ya biklezia ya RDC ezali komi ekambami na Dodo Kamba, batalisi ete boyokani yango ezali ko bomba makambu masusu pe ekoki ko pesa kokoso na pona kosilisa pasi oyo ekolo ezali ko lekisa.
Pona lisanga ya biklezia (CIR) koboya koloba ete Rwanda azali ko bundisa RDC na sima ya ba tomboki ya AFC/ M23. Maloba ya Martin Yoka rapporteur ya lisanga.
Ya mibale, ba tangi te nani esengeli kozala na makoki yako bengisa batu na tina ya boyokani pe ba tata mokonzi kaka lokola moko ya baye basengeli kozala na kati ya masolo.
Mokanda ya boyokani ya pona libiki CENCO-ECC bazali kopesa mingi nzela pona ko luka kimia, kasi justice te.
" To koki koloba makambu ya boyokani te tango bandimi te mabe basali na RDC". Mgr Yoka abeti sete.
Pona CIR boyokani oyo ezali kopesa nzela na boyokani te tala tina basengi ete boyokani ya sika oyo etalisami malamu pona batu banso. Basengi batomboki batanga lolenge bazali pe kotia bosembo na kati kati ya likambo yango.
Lisanga CENCO pe ECC ba memelaki tata mokonzi makanisi ma bango mua 21 juin 2025. Tata mokonzi apesaki bango nzela yako solola na mopesi toli naye na maye matali bokengi pe asengaki ba kotisa masanga masusu ya biklezia na ndakisa ya CIR.
