RDC : Vital Kamerhe aponami moweli ebonga ya bokonzi na ndako ya balobeli pona union sacrée 

Balobeli bayi mboka ya lisanga union sacré ba poni Vital Kamerhe pona ko talisa elongi na maponomi ya mokambi ndako ya balobeli. Mokambi ya lisanga politiki UNC azui ba lokasa 183.

Sarah Meta Savu

24 Sanza ya mineyi 2024 - 18:07
 0
RDC : Vital Kamerhe aponami moweli ebonga ya bokonzi na ndako ya balobeli pona union sacrée 

Christophe Mboso, Modeste Bahati bazui bisika ya mibale pe ya misato na ba lokasa 11 pe 69. Balobeli misusu pe ba poni te. Na nionso balobeli 372 ya lisanga union sacrée bazalaki na maponomi. 

Boye union sacrée bako mema Vital Kamerhe lokola motalisi elongi ya lisanga lia bango pona kozwa ebonga ya bokambi na ena.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa