RDC : Judith Suminwwa Tuluka mokambi mbulamatari ya sika

Moto ya yambo ya mbulamatari na ekolo Congo demokratiki. Judith Suminwwa Tuluka akomi mokambi mbulamatari na nzela ya mokanda ezua mokoloto ya tata mokonzi motangamaki na etando ike ya rtnc mo 1/04/2024. 

Sarah Meta Savu

2 Sanza ya mineyi 2024 - 17:17
 0
RDC : Judith Suminwwa Tuluka mokambi mbulamatari ya sika

Eza nani ?

Muana ya Kongo central abotami moa 19/10/1967. 

Atangi kelasi ya libombo na eteyelo ya bakolo ya Bruxelles lisusu kelasi ya bokambi bato na kopani na bikolo na nzela ya ntombwa. 

Asali ngonga molayi na ba ndako ya misolo yambo akendse kosala na PNUD na moniele ya RDC. Sima na ndako ya misala ya  minisele ya budget yambo akoma mokambi ya lisanga etiaka liso na misala ya tata mokonzi. 

Moa 24/04/2023 akomi minisele ya plan na mbulamatari ya Sama Lukonde 2. 

Moa 1/04/2024 akomi mokambi mbulamatari ya ekolo Congo demokratiki pona ko kitana na Sama Lukonde, oyo azuaki esika moa 26/04/2021

Judith Suminwwa Tuluka aza muasi ya liboso yako zala mokambi mbulamatari.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa