Judith Suminwwa alobi liloba na union sacrée: Bozelisa nga te 

Mokambi mbulamatari azalaki na masolo elongo na ba Kambi lisanga politiki union sacrée de la nation pona oyo etali bokeli mbulamatari na ye.

Sarah Meta Savu

14 Sanza ya mineyi 2024 - 08:13
 0
Judith Suminwwa alobi liloba na union sacrée: Bozelisa nga te 

Na kati ya ba ndimbola ezwaki ACP mokolo vendredi 12/04/2024 mokambi mbulamatari abumbi maloba te pona koloba makanisi maye na bayi majorité présidentielle.

Mokambi mbulamatari aza na posa yako banda mosala na lombangu zambi bayi bazali mitema likolo pona oyo etali bokelami ya mbulamatari oyo esengeli kosala elongo na maman Judith Suminwwa lokola mokambi mbulamatari, alingi bayi pilitiki basala lombamgo ko pesa eyano na bango na mbulamatari na tina makambo matambola 

"Lokola mokambi oyo asengeli maman Judith Suminwwa aza kosela kosala misala mia ye te na lolenge bayi pilitiki balingi 

"Mokambi mbulamatari abongami,ayebi oyo ye alingi, ayebi oyo esengeli kosala na tina ya bitumba,pona bokambi ekolo" maloba ya moko ya bakambi union sacrée na ba panzi sango ya ACP.

Uto ye aponami lokola mokambi mbulamatari moa 01/04 na tata mokonzi Felix Tshisekedi,Judith Suminwwa nanu abimisi te va nkombo ya baye basengeli kozala naye na mbulamatari ya sika atako bayi mboka baza na motema likolo ya ko yeba bango

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa