Kasaï oriental: Mokambi ndako ya balobeli ya etuka alongwe

Kalala Kabongo Malebongo, mokambi ya ndako ya balobeli ya etuka ba Kasaï oriental balongoli ye na ebonga ena mokolo ya mardi zomi na muambe sanza ya sambo ya mobu koto ibale tuku ibale na isato. Esalemaki na likita lia mibale ya eleko ya mosala na ndako ya bango ya ba lobeli nde balobeli bazui mokano yako longola mokambi ya ndako ena ya mosala.

Sarah Meta Savu

19 Sanza Sambo 2023 - 13:30
 0
Kasaï oriental: Mokambi ndako ya balobeli ya etuka alongwe

Balobeli zomi na motoba na kati ya zomi na sambo ba poni kolongua ya mokambi ya bango, Kalala Kabongo. Ba fundi na oyo etali moyibi ya misolo ya balobeli ya ndako ena, bozangi boyebi ya lolenge lako kamba masolo na ndako ena, libaku na mobeko ya ndako na bango ya mosala.

Likita liango likambamaki na mokambi molandi ya ndako ya balobeli, kasi lokola mokambi Kabongo monisaki elongi te atalisi kobima naye na lolenge ya mabe.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa