Kisasa: lisanga lia lisungi Women of Faith aye na lisungi pona baye basimbamaki na likama ya fleuve Congo

Lisanga lia lisungi etalelaka mbulamatari te na kombo ya women of Faith ba kangi motema te, baye kopesa lisungi na bango na bayi mboka basimbamaki tango mayi etondaki koleka momesano na ebale ya Congo na ba komine mineyi ya engumba kisasa. 

Sarah Meta Savu

1 Lisungi pona macini 2024 - 11:05
 0
Kisasa: lisanga lia lisungi Women of Faith aye na lisungi pona baye basimbamaki na likama ya fleuve Congo

Ba komine mitano eponami pona ko yamba lisungi liango : Mont ngafula, Mont Ngaliema, Masina, Limete, pe Kinshasa. Mokolo Nadine Banze, mokambi moa lisanga, ya mardi 27/02 bazalki na Masina pe mokolo ya mercredi 28/02 na Ngaliema bisika wapi ba kabolaki bileyi pe biloko bisusu na bayi mboka. 

Mokambi moa lisanga : toyokaki mbela ya bakambi ya etuka, to kitisaki maboko te, to betaki ekuke na eklezia St de derniers jours, ba pesaki biso eyano ya malamu tala ntina tozali awa lelo.

Eklezia St de derniers jours, lisungi liye lipesami na motema malamu kolandisama bolingo ya yesu klisto " bolingo ya solo ya yesu klisto nde to zali ko panza sango" maloba ya Nixon Lomena. 

Biloko yango ezali : loso, masango, mungwa, sukali, mafuta, liputa pona ba maman, ditela yako lalela. Manso mana masepelisi bango mingi ndakisa tata moboti moko na Kartier kingabwa oyo abungisaki molongani naye na likama liango pe atikeli ye mwambe.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa