Kisasa : ata litanga ya esensi te pona mituka ya Transco

Kopani enene ya transport na RDC Transco ezali ko kufa malembe malembe na mokolo moa lelo bazali ata na litanga ya esensi te pona mituka kama mibale na tuku mitano ezuami na engumba mokonzi kisasa na RDC. 

Sarah Meta Savu

27 Lisungi pona macini 2024 - 16:50
 0
Kisasa : ata litanga ya esensi te pona mituka ya Transco

Mokambi ya kopani Cyprien Mbere abuaki mbela pe azali mituna boye:" ata litanga ya esensi eza te na transco, likita lia ba ministre ya moa 15/03/2024, tata mokonzi apesaki mitindo na ba minisele ya transport pe ya finance kasi nini ezo simba te ?" 

Lifuti lia basali na kopani me ekozala na kokoso pona sanza ya misato. Cyprien Mbere asengi na tata mokonzi Felix Tshisekedi kotiya l'ISO na likambo liango na tina ete eloko ya malamu esalema. 

Ko kufa ya kopani transco ezali ko monana polele batu ya misala ya bolukiluki ba kanisi ete eko zala pasi pona mbulamatari ya ekolo Congo demokratiki kotelemisa lisusu kopani ya Transco.

Sarah Meta Savu Mopanzi sango na UNE.CD na bitando bikie bisusu na engumba mokonzi kisasa